Bazwaki na maboko ya Moyize makabo nyonso oyo bana ya Isalaele bamemaki mpo na kosala misala ya botongi Mongombo. Tongo nyonso, bana ya Isalaele bakobaki komema epai ya Moyize makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?
Nkolo azongisaki : — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?
Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.