Ezali mpe na masanga ebele ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi oyo babongisami mpo na misala ya ndenge na ndenge kati na Tempelo ya Yawe. Na mosala oyo nyonso, okozwa lisungi ya bato oyo bayebi mosala malamu, oyo bamipesa bango moko mpo na misala ya ndenge na ndenge. Bakonzi mpe bato nyonso bakotosa mitindo na yo.