3 Moto moko te asengeli komata elongo na yo ; na ngomba mobimba, moto moko te amonana ; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba.
Moto moko te akozala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani tango Aron akokota kuna mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu kati na Esika ya bule kino tango akobima na libanda. Mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko, mpo na ndako na ye mpe mpo na lisanga mobimba ya Isalaele.