Yawe azongiselaki ye : — Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.
Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »