9 Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize.
Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.
Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo.
Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo.
Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema : moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Moto moko te asengeli komata elongo na yo ; na ngomba mobimba, moto moko te amonana ; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba.
alobaki : — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo : tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo !
Nakokita mpe nakosolola na yo kuna. Nakokamata Molimo oyo ezali epai na yo mpe nakotia yango epai na bango. Bongo, bakosunga yo mpo na komema mokumba ya bato oyo mpo ete omema yango lisusu yo moko te.
Tango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye.
Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Yawe amimonisaki epai na bango lokola likonzi ya lipata kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; mpe likonzi yango ya lipata etelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.