Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 32:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yawe alobaki na Moyize : — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 32:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki ; kasi ye, atikalaki kokota te kati na Tempelo ya Yawe. Atako bongo, bato bakobaki kosala makambo mabe.


Kasi bazalaki koloba lokuta, minoko na bango ezalaki kokosa Ye ;


Yawe azongiselaki ye : — Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.


Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki : — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye.


Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki : — Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ?


Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki : — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito.


Yawe alobaki na Moyize : — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo.


Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.


Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.


Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.


Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »


Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ; bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.


Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali,


Bongo Yawe alobaki na ngai : « Kende, kita mbangu na ngomba oyo, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito bamikomisi mbindo ; bapesi noki mokongo na mibeko oyo napesaki bango mpe bamisaleli ekeko ya ebende banyangwisa na moto. »


Na ngomba Orebi, bopesaki Yawe kanda makasi mpe asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino.


Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango ; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ