Kobima 32:6 - Mokanda na Bomoi6 Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela ; mpe batelemaki mpo na kosakana. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.