Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 32:31 - Mokanda na Bomoi

31 Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki : — Ah ! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 32:31
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo ! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso ; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo ! »


ezala tango bamisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende oyo banyangwisa na moto mpe balobaki : ‹ Tala Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ! › mpe tango balobaki maloba ya nkele mpo na kotelemela Yo.


Kati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo ; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe.


Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai.


Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.


Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato : — Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe ; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino.


Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi.


Bato nyonso ya Isalaele babukaki Mobeko na Yo, bapesaki yango mokongo mpe baboyaki kotosa Yo. Mpo na yango, bilakeli mabe mpe bitumbu oyo ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mosali na Nzambe, esopanelaki biso, mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


solo, tosalaki masumu mpe mabe na miso na Yo, totambolaki lokola bato mabe mpe batomboki, topesaki mibeko mpe mitindo na Yo mokongo.


Yawe, biso, bakonzi na biso, bakambi na biso mpe bakoko na biso, tolatisami na soni mpo ete tosalaki masumu liboso na Yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ