26 Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai. Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye.
Moto moko kati na bato ya Joabi atelemaki pembeni ya Amasa mpe alobaki : « Tika ete bato nyonso oyo bazali mpo na Joabi mpe mpo na Davidi balanda Joabi ! »
Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.
Alobaki na bango : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu ; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. »
oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.
Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye : — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ?