Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 32:25 - Mokanda na Bomoi

25 Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe ; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 32:25
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azongisaki : — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami.


Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato : — Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi ! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito.


Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele.


Yawe asambwisaki Yuda likolo ya Akazi, mokonzi ya Isalaele, pamba te atindikaki bato ya Yuda na mabe mpe azangaki boyengebene liboso ya Yawe.


Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki : — Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai. Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye.


Soki emoniseli ezali te, bato bakotambola ngulungulu. Esengo na moto oyo atosaka Mobeko !


Bolumbu na yo ekomonana, mpe soni na yo ekobombama te. Nakozongisa mabe na mabe, mpe moto moko te akopekisa Ngai.


Boye, nakokende epai ya bakambi na bango mpe nakoloba na bango, pamba te bango nde basengeli koyeba nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. » Kasi bango nyonso, na motema moko, babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo.


mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »


Ebele ya bato oyo bakundama na se ya mabele bakosekwa : bamoko mpo na bomoi ya seko, mpe mosusu mpo na soni mpe somo ya libela.


— Loba na bandeko na yo ya mibali : « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi : « Bozali balingami na ngai. »


Bato ya engumba Shafiri, botambola bolumbu mpe boyoka soni ! Bato ya mboka Tsanani bakobima lisusu na engumba na bango te, bato ya Beti-Atseli bazali na matanga ; boye balongoli lisungi na bango epai na yo.


Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa ?


Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye ; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ