Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 32:20 - Mokanda na Bomoi

20 Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 32:20
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron.


Joziasi abukaki mpe etumbelo oyo ezalaki na Beteli mpe esambelo ya likolo ya ngomba oyo Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, atongaki mpo na kopengwisa bana ya Isalaele. Abukaki etumbelo yango mpe akomisaki yango putulu. Bongo atumbaki mpe likonzi ya Ashera.


Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko.


Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto ; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka.


Moyize atunaki Aron : — Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye ?


bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.


Bato oyo batambolaka na boyengebene te bakozwa lifuti kolanda misala na bango, kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti kolanda misala na ye.


Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.


Tala makambo oyo bosengeli kosala bango : bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,


Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ