Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 32:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 32:19
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


Nayokaka pasi mingi na motema tango namonaka bato mabe kosundola mibeko na Yo.


Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina.


Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki : — Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ?


Moyize azongisaki : — Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te ! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo.


Yawe alobaki na Moyize : — Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso ; nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya liboso oyo obukaki.


ekozala ndenge moko te na boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango tango nasimbaki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ejipito ; pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » elobi Yawe.


Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga.


Bongo nabukaki lisusu lingenda ya mibale oyo nabengaki Bomoko, mpo na kotalisa ete bondeko kati na libota ya Yuda mpe ya Isalaele ekufi.


Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.


Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : — Sembola loboko na yo ! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.


Bozala basambeli ya banzambe ya bikeko te, ndenge bamosusu kati na bango bazalaki, kolanda ndenge ekomama : « Bato bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela, mpe batelemaki mpo na kosakana. »


Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma.


Nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya mabanga ya liboso, oyo obukaki ; mpe okotia bitando yango kati na sanduku. »


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ