Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 32:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize : — Ezali na makelele ya bitumba kati na molako !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 32:17
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! › Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba.


Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Moyize alobaki na Jozue : — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.


Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe.


Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe.


Moyize azongisaki : — Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te ! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo.


Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela ; mpe batelemaki mpo na kosakana.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko : Solo, nakotondisa yo na bato lokola liboke ya mabanki, bongo bakobeta milolo ya elonga likolo na yo.


Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba, mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi, kati na koganga na mokolo ya bitumba, kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.


Nakotia moto kati na ekolo ya Moabi, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba ya Kerioti, oyo batonga makasi. Moabi ekokufa kati na lokito ya makasi, na makelele ya bitumba mpe ya kelelo.


Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : — Boganga te, boloba mpe eloko moko te ! Bovanda kaka kimia kino tango nakoloba na bino ete boganga makasi ; wana nde bokoganga makasi.


Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato : — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino !


Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.


Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.


Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.


Bato ya Isalaele mpe bato ya Yuda babimaki na mbala moko, bagangaki mpe balandaki bato ya Filisitia kino na ebandeli ya lubwaku mpe kino na bikuke ya Ekroni. Bibembe ya bato ya Filisitia etandamaki na nzela oyo ekenda na Shaarayimi kino na Gati mpe kino na Ekroni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ