Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 32:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 32:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elingaki kokomama na ekomeli ya ebende, ya ebende oyo ya songe penza, mpo na kotobola makomi yango na mabanga mpo ete etikala wana mpo na libela.


Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye.


Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye ; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima.


Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize : — Ezali na makelele ya bitumba kati na molako !


Yawe alobaki na Moyize : — Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso ; nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya liboso oyo obukaki.


Moyize abongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Bongo na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, amataki ngomba Sinai ndenge kaka Yawe atindaki ye ; amemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ye.


Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.


Sik’oyo, soki lotomo ya kufa, oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga, eyaki na nkembo, na ndenge ete bana ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize likolo ya kongenga ya nkembo na yango, nzokande nkembo yango esengelaki kosila,


Na tango wana, Yawe alobaki na ngai : « Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe mata epai na ngai na likolo ya ngomba ; okosala lisusu sanduku ya mabaya.


Bongo nabalukaki mpe nakitaki wuta na ngomba oyo ekomaki kopela moto ; nasimbaki na maboko na ngai bitando mibale ya mabanga ya boyokani.


Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, elobi Nkolo : ‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ