Kobima 32:10 - Mokanda na Bomoi10 Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.