Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
Asalaki mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.