Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 31:3 - Mokanda na Bomoi

3 natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 31:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Mokonzi Salomo atindaki bato na mboka Tiri kobenga mosali moko na kombo Irami


oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri ; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.


Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo,


Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.


mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze ;


atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso :


Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.


Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.


Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.


akopesa makanisi ya bosembo epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa, mpe akozala mopesi makasi epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ