Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 31:2 - Mokanda na Bomoi

2 — Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 31:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri ; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.


Kasi etumbelo ya bronze oyo Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri mpe koko ya Wuri, atongaki ezalaki liboso ya Mongombo. Ezalaki kuna nde Salomo elongo na lisanga mobimba balukaki Yawe.


Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba.


Moyize alobaki na Yawe : — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. »


Yawe alobaki na Moyize : — Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo.


Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ;


Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki.


Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.


Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, ya libota ya Yuda, asalaki nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.


Asungamaki na Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, mosali mpe motongi bililingi na maboko, oyo azalaki kobimisa makanisi mpe kotonga bililingi na bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko.


Yoane azongisaki : — Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ