Batelemelaki mokonzi Oziasi mpe balobaki na ye : « Oziasi, kotumba mbeka ya malasi mpo na Yawe ezali mosala na yo te ! Ezali nde mosala ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo babulisama mpo na mosala yango. Bima wuta na Esika ya bule, pamba te ozali kosala likambo ya nkele, mpe Yawe Nzambe akosepela na yo te ! »