Okosala mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
Okotia etumbelo liboso ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, liboso ya esika ya bolimbisi masumu oyo ezali na likolo ya Sanduku ya Litatoli. Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na yo.