4 Okosala mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango.
Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku.
Okobamba wolo na bizingelo, okosala bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe okobamba mabaya wolo.
Okosala motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; okokangisa bapete minei ya bronze, na basonge nyonso minei ya motalaka.
Boye, mpo na komema etumbelo, bakokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo.
Okobamba wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke ; mpe okozingela pembeni na yango na libende ya wolo.
Okosala mabaya yango na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.