Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.
Okopakola bango mafuta ndenge opakolaki tata na bango, mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe : epakolami na bango ekopesa bango nzela mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe libela na libela kati na bakitani na bango.
Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila ; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango.