Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 30:3 - Mokanda na Bomoi

3 Okobamba wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke ; mpe okozingela pembeni na yango na libende ya wolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 30:3
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi ; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto ; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele.


Boye, abambaki wolo na kati nyonso ya Tempelo mpe na etumbelo oyo ezalaki liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe : etumbelo ; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ;


Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo.


Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango.


Molayi mpe mokuse na yango ekozala ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ekozala na metele moko. Maseke na yango ekokangana na etumbelo.


Okosala mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.


Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo ; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ