Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »
nare mpe safarani, kaneli ya solo kitoko, sinamoni, elongo na lolenge nyonso ya banzete oyo epesaka malasi ya ansa, ya aloe mpe ya mire, mpe malasi nyonso oyo eleki kitoko.
Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo, mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo, kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo mpe olembisaki Ngai na mabe na yo.
Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika ? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »
Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka.
Bato ya mombongo ya Saba mpe ya Raema bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mabanga ya talo ya ndenge na ndenge mpe wolo.
Tala misala ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron : kolandela mafuta ya etelemiselo ya minda, ansa ya kozikisa, makabo ya mokolo na mokolo mpe mafuta ya epakolami ; kokengela Mongombo mpe biloko na yango nyonso, ezala Esika ya bule to biloko na yango nyonso. »
Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?