18 — Okosala na bronze sani moko monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango ; okotia yango na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano.
Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze ; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko.
Asalaki nzungu ya monene ya bronze, oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele mitano ; bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe zingazinga na yango, bametele zomi na mitano.
Salomo asalaki lisusu basani zomi ya minene : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano, na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo na kosukola bisalelo mpo na bambeka ya kotumba. Kasi Banganga-Nzambe bazalaki kosukola na nzungu ya monene.
Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani : sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
Kowelela te kofungola monoko na yo, mpe tika ete motema na yo ewelela te kobimisa liloba liboso ya Nzambe ! Pamba te Nzambe azali na likolo, mpe yo ozali na mabele. Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te !
abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.