Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 30:1 - Mokanda na Bomoi

1 Okosala lisusu etumbelo ya malasi na nzete ya akasia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 30:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi ; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto ; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele.


Boye, abambaki wolo na kati nyonso ya Tempelo mpe na etumbelo oyo ezalaki liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe : etumbelo ; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ;


mpe kilo ya wolo ya peto mpo na etumbelo ya malasi. Apesaki ye lisusu elili ya shar ya basheribe ya wolo oyo mapapu na yango ezali ya kofungwama mpe ezipi Sanduku ya Boyokani ya Yawe.


Boye bana ya Isalaele bapesaki epai ya bana ya Levi, bingumba wana mpe bamboka na yango ya mike.


Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi.


Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo ; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe.


Molayi mpe mokuse na yango ekozala ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ekozala na metele moko. Maseke na yango ekokangana na etumbelo.


mesa elongo na biloko na yango ; etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso ; etumbelo ya malasi,


etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali,


etumbelo oyo esalema na wolo, mafuta ya epakolami, malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo,


Okotia etumbelo ya malasi, oyo basala na wolo liboso ya Sanduku ya Litatoli mpe okotia rido, na ekotelo ya Mongombo.


Ezalaki na etumbelo moko ya mabaya, oyo ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano na bosanda mpe metele moko na molayi. Basonge na yango, se na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yawe. »


Nganga-Nzambe akotia makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akosopa makila nyonso oyo ekotikala na se ya etumbelo ya mbeka ya kotumba oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Nganga-Nzambe akotia ndambo ya makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo ndambo mosusu ya makila ya ngombe oyo ekotikala, akosopa yango na makolo ya etumbelo ya bambeka ya kotumba, oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.


Bakotanda liputa ya langi ya ble na likolo ya etumbelo ya wolo mpe bakofinika bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale ; bongo bakotia balate na yango oyo ekosunga mpo na komema.


Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo ; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango ; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.


Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo ; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ