Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 3:9 - Mokanda na Bomoi

9 Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 3:9
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na ye lisusu : — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli, » pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo.


Alobaki na ngai : « Tombola miso mpe tala : bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe ; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo.


Kasi Yoakazi abondelaki Yawe mpo ete asalela ye ngolu, mpe Yawe ayokaki ye, pamba te Yawe amonaki ndenge nini mokonzi ya Siri azalaki konyokola Isalaele.


— Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe.


Omonaki minyoko ya bakoko na biso kati na Ejipito mpe oyokaki koganga na bango pembeni ya ebale monene ya Barozo.


ba-oyo balobaka : « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso ; nani akoluka kozala nkolo na biso ? »


Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa ;


Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.


Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. »


Mokonzi moko ya sika, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito.


Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.


Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Natalaki lisusu mpe namonaki minyoko nyonso oyo ezali na se ya moyi : Namonaki mpinzoli ya banyokolami, mpe moto akobondisa bango azalaki te ; nguya ezalaki na ngambo ya banyokoli, mpe moto akobondisa bango azalaki te.


Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo ; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino : « Bomemela biso masanga mpo tomela. »


Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso ;


Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ