Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe ; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye : — Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele :
Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te.
Moyize alobaki na Yawe : — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. »
Yawe alobaki na ye : — Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo.
Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye : — Kornei !
na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko, bambuma oyo etondi kati na mokili ! Tika ete Nzambe oyo avandaka kati na nzete moke oyo ezali kopela moto apambola moto ya Jozefi mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye !