Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 3:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mwasi nyonso akosenga epai ya moninga na ye mpe epai ya mwasi oyo avandi na ndako na ye : biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba. Bokopesa yango epai ya bana na bino ya mibali mpe ya basi mpo ete bamema. Na bongo nde bokosilisa biloko ya bato ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 3:22
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele.


Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye.


Abimisaki Isalaele, bato na Ye, elongo na palata mpe wolo ; mpe moko te atiaki tembe kati na mabota na bango.


Loba na bato ete basenga biloko ya palata mpe ya wolo : mobali nyonso asenga yango epai ya moninga na ye mobali mpe mwasi nyonso, epai ya moninga na ye mwasi. »


Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.


Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te ! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te ! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.


Bakozala na posa te ya kosangisa bakoni kati na bilanga to kokata banzete kati na bazamba, pamba te bakopelisa moto yango nde na bibundeli ; bakozwa lokola bomengo ya bitumba bato oyo bazwaki bango lokola bomengo ya bitumba, mpe bakobotola biloko ya bato oyo babotolaki bango biloko, elobi Nkolo Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ