Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 3:21 - Mokanda na Bomoi

21 Nakosala ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito mpo ete, tango bokolongwa, bokende maboko pamba te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 3:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele.


Yawe azalaki elongo na Jozefi mpe atalisaki ye bolamu na Ye ; asalelaki ye ngolu na miso ya mokonzi ya boloko.


limbisa bato na Yo na masumu mpe mabe nyonso oyo basalaki liboso na Yo mpe sala ete banguna na bango bayokela bango mawa.


Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.


Abimisaki Isalaele, bato na Ye, elongo na palata mpe wolo ; mpe moko te atiaki tembe kati na mabota na bango.


Asalaki ete bato nyonso oyo bakomisaki bango bawumbu bayokela bango mawa.


Loba na bato ete basenga biloko ya palata mpe ya wolo : mobali nyonso asenga yango epai ya moninga na ye mobali mpe mwasi nyonso, epai ya moninga na ye mwasi. »


Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito. Mpe Moyize ye moko azalaki moto monene kati na Ejipito, na miso ya basali ya Faraon mpe ya bato nyonso.


Bato ya Isalaele basalaki ndenge Moyize alobaki na bango mpe basengaki epai ya bato ya Ejipito biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba.


Bongo Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito oyo bapesaki bango biloko oyo basengaki. Na ndenge wana nde basilisaki biloko ya bato ya Ejipito.


Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.


mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso ; Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba.


Mpe tango okotika ye, okozongisa ye maboko pamba te ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ