Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye.
Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. ›
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.
Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye.
Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.