Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba ; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye.
Moyize alobaki na Nzambe : — Soki nakeyi epai ya bana ya Isalaele mpe nalobi na bango : « Nzambe ya bakoko na bino atindi ngai epai na bino, » bongo soki bango batuni ngai : « Kombo na Ye nani ? » Nakoyebisa bango nini ?
Yango wana nalobaki na bino : « Bokokufa kati na lisumu na bino ; » pamba te soki bondimi te ete « Nazali oyo azali, » bokokufa kati na lisumu na bino.
Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.
Yoane ; Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi,
Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, oyo azalaki, azali, mpe azali koya, azali Bule, Bule, Bule.