Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Moyize alobaki na Nzambe : — Soki nakeyi epai ya bana ya Isalaele mpe nalobi na bango : « Nzambe ya bakoko na bino atindi ngai epai na bino, » bongo soki bango batuni ngai : « Kombo na Ye nani ? » Nakoyebisa bango nini ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 3:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.


Yawe azali elombe ya bitumba ; Kombo na Ye ezali Yawe.


Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.


Nzambe alobaki na Moyize : — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. »


Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, Kombo oyo bokokanisela Ngai libela na libela.


Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.


Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna ? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye ? Nani akanga mayi na kazaka na ye ? Nani akata bandelo nyonso ya mabele ? Kombo na ye nani ? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani ? Yebisa ngai soki oyebi !


Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai ; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. »


Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. »


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »


« Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »


Biso te ! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.


Manoa atunaki Anjelu na Yawe : — Kombo na yo nani mpo ete topesa yo lokumu tango elaka na yo ekokokisama ?


Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ