Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 3:11 - Mokanda na Bomoi

11 Moyize alobaki na Nzambe : — Ngai nazali nani mpo ete nakende epai ya Faraon mpe mpo ete nabimisa bana ya Isalaele na Ejipito ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 3:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki : « Nkolo Yawe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali ?


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.


Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani, mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo, wuta na mokano ya mitema na biso moko ? Nyonso ewutaka epai na Yo, mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.


Kasi Moyize azongiselaki Yawe : — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma ?


Nazongisaki : — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge !


Mpo na bamoko, tozali solo ya kufa, oyo ezali komema bango na kufa ; mpe mpo na bamosusu, tozali solo ya bomoi, oyo ezali komema bango na bomoi. Boye nani azali na makoki mpo na mosala ya lolenge oyo ?


Tosengeli te kokanisa ete ezali na ndenge na biso moko nde tozwi makoki ya kosala likambo songolo ; te, makoki na biso ewutaka nde na Nzambe.


Jedeon azongisaki : — Ah nkolo na ngai, ndenge nini ngai nakoki kobikisa bana ya Isalaele ? Kati na Manase, libota na ngai nde ezangi makasi koleka, mpe ngai nazali mwana ya suka kati na ndako ya tata na ngai.


Davidi azongiselaki Saulo : — Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ