Boye, Yawe alobaki na Abrami : — Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei.
Moyize alobaki na Yawe : — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. »
Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo.
Ezali te mpo ete nabimisaki bino na Ejipito to mpo ete nakangolaki bino na ndako ya bowumbu ? Boni, ezali te mpo ete natindelaki bino Moyize, Aron mpe Miriami mpo ete bakamba bino ?
Namoni minyoko ya bato na Ngai kati na Ejipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe yaka sik’oyo, nakotinda yo ete ozonga na Ejipito. »
Abimisaki bango na mokili ya Ejipito, na nzela ya bikamwa mpe ya bilembo minene oyo asalaki kuna, na ebale monene ya Motane mpe na esobe, mibu tuku minei.
Tala makambo oyo Nzambe alobaki : « Bakitani na ye bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya ; bakokomisa bango bawumbu mpe bakonyokola bango mibu nkama minei. »
Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki : — Kende, salela makasi oyo ozali na yango mpe bikisa bana ya Isalaele na maboko ya bato ya Madiani. Boni, ezali Ngai te nde natindi yo ?
Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo.