Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 28:9 - Mokanda na Bomoi

9 Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 28:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango.


Na bozwi na ngai nyonso, nabongisaki mpo na Ndako ya Nzambe na ngai : wolo mpo na misala ya wolo, palata mpo na misala ya palata, ebende mpo na misala ya bibende, mabaya mpo na misala ya mabaya, mabanga ya onikisi mpe mabanga ya kobamba, mabanga oyo engengaka mpe ya balangi ebele, mabanga ya talo ya lolenge nyonso mpe mabanga ya marbre. Biloko oyo nyonso ezalaki penza ebele.


Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo,


bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ;


mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.


kolanda ndenge babotama : bakombo motoba na libanga ya liboso mpe bakombo motoba oyo etikali, na libanga ya mibale.


mpe na molongo ya minei, okotia libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Okokanga mabanga yango na bikangelo ya wolo.


Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : abulisama mpo na Yawe.


Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.


mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso.


na molongo ya minei, libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Akangaki mabanga yango na bikangelo ya wolo.


Abongisaki mabanga ya onikisi, mpe bakangaki yango na bikangelo ya wolo ; akomaki likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele, ndenge basalaka bililingi na kashe.


Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo ; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe.


Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ; bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.


Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo.


Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango, akobikisa bango ndenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye. Bakongenga makasi kati na mabele na Ye lokola mabanga ya talo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ