8 Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
Mokaba ya efode esalemaki lolenge moko na efode : ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.
Mpe kati na bitelemiselo yango, ezalaki na moto moko lokola Mwana na Moto. Alataki nzambala ya molayi mpe mokaba moko ya wolo zingazinga ya tolo na Ye.