Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 28:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 28:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,


mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.


Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.


Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba ekoleka likolo ya mapeka.


Okozwa bilamba ya bule mpe okolatisa Aron nzambala, kazaka, efode mpe elamba ya tolo ; mpe okokanga ye mokaba ya efode.


Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko.


Alatisaki Aron nzambala mpe akangaki ye mokaba na loketo ; alatisaki ye kazaka mpe efode, azingelaki ye na mokaba ya efode.


Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye.


Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki : « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ