Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 28:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 28:4
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.


Okokanga ye kitendi na moto mpe okobakisa na likolo ya kitendi yango elembo ya libulisi.


bitendi ya lino ya kitoko mpo na moto, bikoti, bakaputula


Bosembo ekozala mokaba na ye, mpe boyengebene ekozala na loketo na ye lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli.


Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.


Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko.


Boye botelema ngwi, bolataka solo lokola mokaba na loketo, bosembo lokola ebombelo ya tolo,


Kasi lokola tozali bato ya moyi, tika ete tosenzela malamu, tolata kondima mpe bolingo lokola ebombelo ya tolo, mpe tolata elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende.


Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki : balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka ; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo.


Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Doegi : « Yo, baluka mpe boma Banganga-Nzambe. » Boye Doegi, moto ya Edomi, abalukaki mpe abomaki bango. Na mokolo wana, abomaki bato tuku mwambe na mitano oyo balataki efode ya lino.


Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki : « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ