Na se mpe zingazinga ya nzambala, okotia bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi ; mpe okotia bangonga ya mike-mike kati na bambuma ya grenade.
Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
Nakendeki na elanga ya bakokoti mpo na koluka milona kati na lubwaku, mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa mito to banzete ya grenade ebandi kobimisa bafololo.
Nalingaki komema yo mpe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai, mpo ete oteya ngai bolingo. Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko, oyo basali na bambuma ya grenade.
Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.
mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,