Okosala elamba ya tolo mpo na koyeba mokano ya Nzambe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Okotonga yango lokola efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.