20 Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.
Obongisaka mesa mpo na ngai na miso ya bayini na ngai, opakolaka moto na ngai mafuta mpe otondisaka kopo na ngai kino kosopana.
mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko ;
Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze.
Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko.
mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko,
etelemiselo ya minda, oyo basala na wolo ya peto, minda na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mafuta mpo na kopelisa minda yango,
Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango ; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango.
Batatoli wana mibale bazali banzete mibale ya olive mpe bitelemiselo mibale ya minda ; mpe batelemaka liboso ya Nkolo ya Mokili.
Nzete ya Olive ezongiselaki yango : ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? ›
Mwinda ya Esika ya bule ezalaki kopela, wana Samuele azalaki ya kolala kati na Tempelo ya Yawe, epai wapi Sanduku ya Nzambe ezalaki.