Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 27:19 - Mokanda na Bomoi

19 Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 27:19
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso.


Lopango ya Mongombo ekozala ya bametele tuku mitano na molayi, bametele tuku mibale na mitano na mokuse na ngambo moko na moko, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Barido na yango ekozala ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, mpe makolo na yango ekozala ya bronze.


Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.


Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.


bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango,


Bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ezalaki ya bronze.


Basalelaki yango lisusu bivandelo nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya lopango ya Mongombo, bivandelo ya ekotelo na yango, bapike nyonso ya Mongombo mpe bapike oyo ezingelaki lopango.


batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango, rido mpo na ekotelo ya lopango, basinga na yango, bapike na yango, bisalelo nyonso mpo na mosala ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,


Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko.


Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene, miso na yo ekomona Yelusalemi, ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi ; bakokoka kopikola makonzi na yango te, mpe basinga na yango ekokatana te.


Na Yuda nde ekobimela libanga ya songe ya ndako, likonzi ya ndako ya kapo, tolotolo ya bitumba mpe bakambi nyonso.


Bazalaki mpe lisusu na mokumba ya kobatela makonzi oyo ezalaki zingazinga ya lopango, bapike ya Ndako ya kapo mpe basinga na yango.


makonzi oyo ezingeli lopango, makolo na yango, bapike na yango, basinga na yango, bisalelo na yango nyonso mpe biloko nyonso oyo esungaka mpo na kokangisa yango. Bokobenga moto moko na moko na kombo mpe bokopesa ye biloko oyo akobanda komema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ