10 Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata.
Ngambo ya nor ekozala na bametele pene tuku mitano na molayi. Ekozala mpe na barido, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ekozala na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ekozala ya palata.
Tala ndenge okotonga lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ekozala ya bametele pene tuku mitano na molayi, ekozipama na rido ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
Makonzi na yango tuku mibale mpe bivandelo tuku mibale esalemaki na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata.