Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 27:1 - Mokanda na Bomoi

1 Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo : ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 27:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye : — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi.


Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe, alongolaki yango na esika na yango liboso ya Ndako ya Nzambe, kati na etumbelo ya sika mpe Tempelo ya Yawe, mpe atiaki yango pembeni ya etumbelo ya sika, na ngambo ya nor.


Boye bana ya Isalaele bapesaki epai ya bana ya Levi, bingumba wana mpe bamboka na yango ya mike.


Salomo asalaki etumbelo ya bronze ya bametele zomi na molayi, bametele pene zomi na mokuse, mpe bametele mitano na bosanda.


Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na baninga na ye, Banganga-Nzambe, mpe Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, elongo na bandeko na ye, babandaki kotonga etumbelo ya Nzambe ya Isalaele mpo na kobonza kuna mbeka ya kotumba kolanda makomi kati na Mobeko ya Moyize, moto na Nzambe.


Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. »


Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele.


etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso ; sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango ;


etumbelo ya bambeka ya kotumba, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,


etumbelo esalema na bronze, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,


Okopakola mafuta na etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso ; okobulisa etumbelo mpe yango ekozala bule koleka.


Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.


Okotia etumbelo ya mbeka ya kotumba liboso ya ekotelo ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani,


Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.


Sima na bango kolongola putulu ya moto wuta na etumbelo, bakotanda liputa ya langi ya motane na likolo na yango ;


bongo bakotia na likolo na yango biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo : basani oyo batumbaka na yango ansa, bakanya, bapawu, basani ya minene mpe biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo ; bongo bakotanda na likolo ya biloko oyo nyonso, liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia balate ya etumbelo oyo ekosunga mpo na komema.


Tozali na etumbelo, kasi Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Mongombo bazali na bokonzi te ya kolia mbeka oyo babonzi na likolo ya etumbelo yango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ