Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 26:6 - Mokanda na Bomoi

6 Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 26:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.


Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Okotia basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango ekotalana.


Okosala batapi zomi na moko na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo.


Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango ;


Basalaki na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe bakangisaki na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Boye, Mongombo ebimaki eloko moko.


Basalaki na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; bakotisaki yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.


Bamemaki Mongombo epai ya Moyize, elongo na biloko na yango nyonso : ndako ya kapo mpe bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi mpe bivandelo na yango,


Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ