Tala ndenge basalaki etelemiselo ya minda : basalaki yango na wolo batuta wuta na likonzi kino na bafololo na yango ; basalaki yango ndenge kaka Yawe alakisaki Moyize.
ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye : « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »
Boye, lokola bililingi ya biloko oyo ezali kati na Likolo esengelaki kopetolama ndenge wana, ezalaki na tina ete yango moko mpe biloko ya Likolo epetolama na nzela ya bambeka oyo eleki malamu.