Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 26:3 - Mokanda na Bomoi

3 Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 26:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.


Okotia basinga ya langi ya ble na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale.


Okokangisa batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu ; mpe okogumba tapi ya motoba na liboso ya Mongombo.


Bakangisaki batapi mitano, moko na mosusu, mpe basalaki ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.


mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo ; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai.


Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko.


Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.


baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni.


Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango ; mabombami yango ezali Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ