Bato ya Merari bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso ya Mongombo, oyo basala na mabaya : balate na yango, makonzi na yango, makolo na yango mpe biloko nyonso ya mike oyo bazalaki kokangisela yango.
Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.