11 Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko.
Okotia basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale.
Batapi oyo ekozala na likolo ya Mongombo ekoleka molayi mpe ndambo na yango ekokita na sima ya Mongombo.
Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu.
Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko.